Actualités : www.kintambo.cd  / Social et Environnement
Vitamine A

MPO ETE BANA NA BISO BAKOLA MALAMU MPE BAZALA NA NZOTO KOLONGONO,

TONDIMI KOPESA BANGO VITAMINE SIMA YA SANZA MOTOBA NIONSO NA BA CAMPAGNE YA VITAMINE A.

Papa Isaac Mukele, Moteki : Mwano na ngai azoli na basenga ya vitamine A pona akolo malamu, abatelama na bokono mpe mayele na ye ekola malamu. Bana na nse ya mbula mitanu, soki bazangi Vitamine A, bakolaka malamu te, mpe bazalaka mpenza mayele na kelasi te. Mpona mwana na ngai akola malamu mpe azala na nzoto kolongono, na ndimi kopesa ye vitamine A sima ya sanza motaba nionso na ba campagne ya vitamine A.

 

Pasteur Béni M’bengi : Nzambe alingi ete bana na biso bakola malamu. Lokola Ayebi ete vitamine A ezali na motuya mingi, Atia yango mingi mpeza na mabélé ya ba mama mpe na bilei ebele. Bana na nse ya mbula mitano bazalaka na bosengo mingi ya vitamine A. Mpona bana na bino bazala na nzoto kolongono, bosengeli kopesa bango vitamine A sima ya sanza motoba nionso kino na mbula mitono. Na boye, nabondeli bino ete botika bana na bino kobanda sanza motoba kino mbula mitanu bazwa vitamin A na ba compagne nionso ya vitamine A.

 

MUNGANGA: Vitamine A ebomaka te!   Esalisaka bana na biso bazala na nzoto makasi, ezali komatisa makoki na bango ya komibatela na bokono, mpe ezali kosalisa bango bakola malamu mpe bazala na nzoto kolongono. Pona oyo etali santé ya bana na biso, tosengaka toli epai ya baye batalaka makombu yango, kasi na batu nionso te ! Totika bana na biso ya sanza motoba kino mbula mitano bazwa vitamine A na ba campagne nionso ya vitamine A. Ba compagne yango ezalaka mbala mibale kati ya mbula moko.

Source : www.kintambo.cd 
  Autres Articles dans la même catégorie
 
Téléchargement